TabichouxxmuswahiliyaWolo

TabichouxxmuswahiliyaWolo bienvenue sur mon page
j'ai créé cette page pour mes amis sur Facebook pour partager aussi de idee

11/09/2024

Motema malamu efutaka , Soki efuti yo te eko futa bana nayo soki efuti bana nayo te eko futa bana ya bana nayo Zala Motema malamu na vie .

25/08/2024

Psaumes 46:2

Dieu est pour nous un refuge et un appui, un secours toujours présent dans la détresse.
C’est pourquoi nous sommes sans crainte quand la terre est bouleversée, quand les montagnes sont ébranlées au cœur des mers

Bonne journée

💋

30/06/2024

Vous connaissez la vérité

‘Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana. Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.’

‭‭Emoniseli‬ ‭2‬:‭9‬-‭10

21/06/2024

GoodNight

Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te ; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.’

‭‭Banzembo‬ ‭25‬:‭3‬

22/05/2024

Aucune circonstance ne peut rester constate devant la main forte et agissante de Jésus-Christ

17/05/2024

Être embrassé n'es veut pas dire être Aimé demande à Il vas vous parlé de

09/04/2024

’Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.‘
‭‭1 Yoane‬ ‭4‬:‭18‬ ‭

Goodmorning

25/02/2024

Liloba na ngai ya lelo

Sala bolamu eko batela yo na bana nayo
Partage bolambu oyo nzambe apamboli yo.

06/02/2024

’Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na s**a moko kino na s**a mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana. Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi ? Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ? Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.‘
‭‭Deteronomi‬ ‭4‬:‭32‬-‭35‬ ‭

Happy day ❤️

28/01/2024

Nzambe aza bolingo Gooaalll

23/01/2024

’Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino. Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.‘
‭‭Bagalatia‬ ‭5‬:‭16‬-‭17‬ ‭

’Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela n...
22/01/2024

’Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ? Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?‘
‭‭Matayo‬ ‭6‬:‭25‬-‭26‬ ‭

Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi el

Adres

Amsterdam Centrum

Meldingen

Wees de eerste die het weet en laat ons u een e-mail sturen wanneer TabichouxxmuswahiliyaWolo nieuws en promoties plaatst. Uw e-mailadres wordt niet voor andere doeleinden gebruikt en u kunt zich op elk gewenst moment afmelden.

Contact De Plaats Van Aanbidding

Stuur een bericht naar TabichouxxmuswahiliyaWolo:

Delen